Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo.
Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala.
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.
Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda ; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango.