Masese 27:20 - Mokanda na Bomoi20 Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko, azalaki ata na mwana to ndeko te ; azalaki kopema te na mosala na ye ya makasi, kasi bomengo na ye etikalaki te kotondisa miso na ye. Mpe atikalaki komituna te : « Nani oyo ngai nazali komonela pasi boye ? Mpe mpo na nini nazali komipimela bomengo ? » Wana mpe lisusu ezali pamba : ezali mosala ya mpunda !
« Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.