2 Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.
Jewu alobaki : — Yaka elongo na ngai, mpe okomona bolingo makasi na ngai mpo na Yawe. Boye, Jewu amemaki ye na shar na ye.
Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo ?
Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.
Libanga mpe zelo ezalaka kilo, kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.
Toboyi komikokanisa to komekana na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele !
Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.
Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.