10 Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.
Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.
Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.