1 Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.
Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Boloba na ye : « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli ! »
Amani abakisaki : — Esuki kaka wana te ! Nazali kaka ngai moko, moto oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abengi elongo na mokonzi na feti oyo abongisi. Mpe lobi, abengi ngai lisusu elongo na mokonzi.
Pamba te azali Nzambe na biso ; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
Lokola moto moko te ayebi makambo oyo ekoya sima, nani akoki koyebisa moninga ndenge ekoyela ye ?
Moko na moko alobaka : « Yaka ! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga ! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele ! »
pamba te Nzambe alobi : « Na tango ya malamu, nayanolaki yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia.