6 Moto oyo atindaka sango na nzela ya zoba azali lokola moto oyo amikati makolo mpe amilukeli makambo.
Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi, mpe molinga esalaka miso pasi, ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalaka epai ya bato oyo batindaka ye pasi.
Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi, kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.
Motindami ya sembo azalaka lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe na tango ya kobuka bambuma, asalaka esengo ya mokonzi na ye.
Zongisela zoba kolanda bozoba na ye, noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.
Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te, ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya te kati na monoko ya zoba.
Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki : — Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.