Saulo alobaki na Davidi : — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »
Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »