Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 26:25 - Mokanda na Bomoi

25 Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te, pamba te makambo sambo ya mbindo ebombama kati na motema na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 26:25
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sanibala mpe Geshemi batindelaki ngai maloba oyo : — Yaka, tokutana na Kefirimi, kati na lubwaku ya Ono. Bazalaki na likanisi ya kosala ngai mabe.


Yawe, sunga biso ! Pamba te bayengebene bazali lisusu te ; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.


Kokumba ngai te elongo na bato mabe, elongo na bato oyo basalaka mabe, oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango, kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.


pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka : « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.


Maloba ya sukali ya moto ya motema mabe ezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakoli na mbeki basala na mabele.


Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.


Botia motema te epai ya bazalani na bino, botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema. Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo, keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.


Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te.


Saulo alobaki na Davidi : — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ