Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.