Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo : ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene !
Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.