17 Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye te azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi.
Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.
Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana, mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.
Koboya koswana epesaka moto lokumu, kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango.
Ndenge moto ya liboma abwakaka moto, makonga mpe kufa,
Kolukelaka moto makambo te, oyo ezanga tina soki asali yo mabe te.
Yesu azongiselaki ye : — Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula ?