16 Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya koleka bato sambo ya mayele.
Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.
Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.
Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.
Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !
Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,