14 Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.
Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi, kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.
Moto ya goyigoyi azangaka bilei, mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene.
mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala,
Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !
Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.