13 Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ekangi nzela ! Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala ! »
Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »
Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !
Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo. »