11 Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.
Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.
Okoloba : « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te ; babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te ! Tango nini nakolamuka ? Nakozongela lisusu komela vino. »
Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosala azali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga.
Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.
Bamesa nyonso etondi na bisanza ya nkele ; esika ya malamu etikali lisusu te.
ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.
Ezaleli na bango elongisi bosolo ya masese oyo : « Mbwa ezongelaka biloko oyo yango moko esanzi » mpe « Ngulu oyo basukoli ezongelaka kotambola kati na potopoto. »