10 Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosala azali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga.
Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?
Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.
Lisese kati na monoko ya zoba ezali lokola etape ya banzube kati na loboko ya moto oyo alangwe masanga.
Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye :