1 Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge, mpe mvula enokaka te na tango ya elanga, ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te.
asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te ;
Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda, mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane, ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba.
Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »