Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 25:5 - Mokanda na Bomoi

5 Soki olongoli moto mabe liboso ya mokonzi, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama na bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 25:5
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.


Kasi mokonzi Salomo akopambolama, mpe kiti ya bokonzi ya Davidi ekolendisama makasi liboso ya Yawe mpo na libela.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.


Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi ; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu.


Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso.


Komikumisaka te liboso ya mokonzi, mpe komivandisaka te na esika ya bato minene ;


Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.


Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo ; moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, akobimela na ndako ya Davidi : alukaka bosembo kati na kosambisa mpe alongisaka makambo ya bosembo.


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ