Masese 25:21 - Mokanda na Bomoi21 Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima, bato oyo baponaki na bakombo na bango bazwaki bakangami mpe balendisaki bango ; bazwaki kati na bomengo ya bitumba bilamba, mpe balatisaki ba-oyo nyonso bazalaki bolumbu. Bapesaki bango bilamba, basapato, bilei mpe masanga ; mpe bapakolaki ba-oyo bazokaki kisi, bamemaki na likolo ya ba-ane ba-oyo bakokaki kotambola te mpe bazongisaki bango na Jeriko, engumba ya banzete ya mbila, epai ya bandeko na bango. Sima, bazongaki na Samari.