Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 25:18 - Mokanda na Bomoi

18 Moto oyo apesaka matatoli ya lokuta mpo na kosala moninga na ye mabe azali lokola marto, mopanga mpe mbanzi ya songe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 25:18
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.


Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.


Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.


Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.


Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.


Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.


Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ?


Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo, noki te akotonda yo mpe akolemba yo.


« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.


Bongo na makambo ya boye, napesa bango etumbu te, » elobi Yawe ? « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? »


Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ