16 Soki omoni mafuta ya nzoyi, lia oyo ekoki na yo, pamba te soki olie yango na lokoso, okosanza yango.
Okosanza eteni oyo oliaki, mpe maloba na yo ya kitoko ekokende pamba.
Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo, noki te akotonda yo mpe akolemba yo.
Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.
Kolekisa ndelo te ya kozala moto ya sembo to ya kozala moto ya bwanya ; mpo na nini komibebisa ?
Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu.
Lokola bibwele wana ekopesaka miliki ebele, akolia manteka ; mpe bato nyonso oyo bakotikala na mokili bakolia mafuta ya nzoyi.
Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,
Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,