Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 25:12 - Mokanda na Bomoi

12 Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 25:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo oyo alatisaki bino bilamba ya motane mpe biloko ya monzele, oyo atondisaki babiju ya wolo na bilamba na bino.


wolo to diama ekoki te kokokana na yango, bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.


Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.


Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.


Aron azongiselaki bango : — Bolongola biloko ya matoyi oyo ezali na matoyi ya basi na bino, ya bana na bino ya basi mpe ya mibali, mpe bomemela ngai yango.


Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango.


Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.


Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.


Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.


Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.


Nalatisaki yo lopete na zolo, biloko ya matoyi mpe motole ya kitoko na moto.


moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ