11 Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.
Maloba na yo ezalaki kolendisa bato oyo bazalaki kotepatepa, mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.
Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.
noki te ayoka yango mpe ayokisa yo soni, boye okosambwa mpo na libela.
Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.
Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.
moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye.
Boye Davidi azwaki bakado oyo Abigayili amemelaki ye mpe alobaki : — Zonga epai na yo na kimia. Nayoki maloba na yo mpe nakosala ndenge osengi ngai.