8 Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.
Mokonzi alobaki lisusu na Shimei : — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai ! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali.
Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.
Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.
pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe, mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.
Mabongisi ya bozoba ezali masumu, mpe bato bayinaka motioli.
azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.
motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,
Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te.
Ezali kati na yo Ninive nde moto oyo azali na mabongisi mabe mpo na kotelemela Yawe mpe azali na batoli ya mabe abimi.
na kotiola baninga, banguna ya Nzambe, bato batonda na lolendo, na lofundu, na bilobaloba, na mayele ya kosala mabe, batomboki na miso ya baboti na bango ;