6 Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.
Akazia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki ; pamba te, sima na kufa ya tata na ye, bato ya libota ya Akabi bakomaki bapesi toli na ye mpo na libebi na ye.
Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli.
Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.
Ndenge moko, soki mokonzi moko alingi kokende kobundisa mokonzi mosusu, boni, akovanda nanu te mpe akotala nanu te soki, elongo na basoda na ye nkoto zomi, akoki kobundisa mokonzi oyo, elongo na basoda nkoto tuku mibale, azali koya kobundisa ye ?
Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.