5 Moto ya bwanya atondi na nguya, moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye.
Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka, bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi, mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.
Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.
Moto ya bwanya abundisaka engumba ya bato ya makasi, mpe akweyisaka bandako ya makasi oyo bato batielaka mitema.
Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.
Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.
Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi koleka bakambi zomi kati na engumba.
Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ?
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.
mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka ;