33 mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala,
Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.
Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba.
Tango natiaki makanisi na ngai kati na makambo oyo namonaki, nazwaki mayele oyo :
bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.
Moto oyo azangi mayele akangaka maboko na ye mpe amibebisaka ye moko.
Bosalaka bongo awa bozali kososola tango nini tozali kobika. Tango ya kolamuka na pongi na bino ekoki, pamba te lobiko ekomi sik’oyo pene na biso, koleka tango tozwaki kondima sika.
pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »