29 Kolobaka te : « Nakosala ye ndenge asali ngai, nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. »
Kolobaka te : « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai ! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.
Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.
Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison : — Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso ? Likambo nini osali biso ? Samison azongisaki : — Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai.