27 Bongisa libanda ya mosala na yo, bongisa bilanga na yo, bongo na sima, tonga ndako na yo.
Mpo na kotonga Tempelo, basalelaki kaka mabanga oyo ebongisamaki malamu wuta na esika oyo bapasolaki yango ; boye, esalaki ete makelele ya marto, ya epasola to ya esalelo mosusu ya ebende etikalaki koyokana te wana bazalaki kotonga yango.
Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.
Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango, mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango, na se ya moyi.
Ezali na tango ya kobotama mpe tango ya kokufa, tango ya kolona mpe tango ya kopikola oyo elonami ;