Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 24:25 - Mokanda na Bomoi

25 Kasi bato oyo bapamelaka moto mabe bakozala malamu mpe lipamboli ekozala likolo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 24:25
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango : — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba ?


Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.


Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.


Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.


Moto oyo apamelaka moninga na ye akozwa ngolu na suka koleka moto oyo alobaka maloba ya sukali.


Okoyina ndeko na yo te na motema na yo ; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye.


pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. »


Na miso ya bato nyonso, pamelaka bakambi oyo basali masumu mpo ete bato mosusu bakoma na botosi.


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


Litatoli oyo ezali penza ya solo. Yango wana, pamela bango makasi mpo ete bazala na kondima ya peto


Yango nde makambo oyo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola yo.


Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ