Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 24:23 - Mokanda na Bomoi

23 Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya : Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 24:23
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo ; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te : kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. »


Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye ? Bolingi kobundela Nzambe ?


Tika ete moto ya bwanya asala keba na makambo wana nyonso mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe !


mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.


Ezali malamu te kolongisa moto mabe mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.


Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.


Kopona bilongi ezalaka malamu te ; nzokande ata mpo na eteni ya lipa, moto akoki mpe kosala mabe.


Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.


Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo.


Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo.


Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »


Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.


Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.


Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ