Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 24:21 - Mokanda na Bomoi

21 Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi, kosanganaka te na batomboki,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 24:21
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.


Tango bato oyo Adoniya abengisaki bayokaki bongo, batelemaki na kobanga mpe bakimaki moto na moto na nzela na ye.


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.


Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.


Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe ;


Bazongisaki : — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !


Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu,


Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ