20 pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.
Tika ete atia elikya na ye na lokuta te, pamba te akoyokisama soni mpe akozwa libebi lokola lifuti.
Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?
Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto ! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.
pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti.
Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.
Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.
Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.
Miso ya lofundu, motema ya lolendo mpe kongenga ya bato mabe ezali masumu.
pamba te suka na yo ekozala solo malamu mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
Mawa na moto mabe ! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.
Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »
Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.