Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 24:2 - Mokanda na Bomoi

2 pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe, mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 24:2
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te moto nyonso oyo azalaka na makanisi mabe kati na ye abotaka kaka pasi ; mabe oyo ekolaka kati na ye ememelaka ye moko libebi. »


Monoko na ye etonda na bilakeli mabe, lokuta mpe mangungu ; abongisaka kaka pasi mpe mabe.


Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe ! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.


Kokumba ngai te elongo na bato mabe, elongo na bato oyo basalaka mabe, oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango, kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.


Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.


Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.


Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.


Mwana na ngai ya mobali, soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.


Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.


azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.


motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,


Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi : « Lokola bobwaki maloba oyo, lokola bokangami na monyokoli mpe na mokosi oyo bozali kotiela motema,


Moko te azali kofunda makambo na bosolo, moko te azali kosamba na bosembo ; bazali kotia mitema na makambo ezanga tina mpe bazali koloba lokuta ; na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe mpe bakokisaka yango na misala na bango.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.


— Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo ! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe ! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo ?


Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ