Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 24:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yeba lisusu ete bwanya ezali elengi mpo na molimo na yo ; soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu, mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 24:14
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.


Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.


Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.


Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.


Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.


pamba te suka na yo ekozala solo malamu mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.


Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo ; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo ; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Nzokande moto oyo amipesaka na koyekola mobeko oyo ekoka na nyonso mpe epesaka bonsomi, bongo atosaka yango tango nyonso, asukaka kaka na koyoka te, kasi atiaka na misala : moto yango akozala moto ya esengo na nyonso oyo akosala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ