Masese 24:12 - Mokanda na Bomoi12 Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.