1 Kolulaka te bato oyo basalaka mabe mpe kolukaka te kozala elongo na bango,
Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli,
Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,
Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te ;
Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye ; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe ;
Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe, kolula te bato mabe ;
Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.
Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.
Longwa kati na bango, kolekela wana te, kosala mpe maseki kuna te, kasi kende na yo na nzela mosusu.