Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 23:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kolobaka na zoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 23:9
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.


Zala mosika ya zoba, pamba te okotikala kozwa boyebi te na bibebu na ye.


Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo : « Bopesa ye eyano te ! »


Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.


Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.


Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?


Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !


Bafarizeo mosusu oyo bazalaki elongo na ye bayokaki maloba yango mpe batunaki Yesu : — Boni, olingi koloba ete biso mpe tozali bakufi miso ?


Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.


Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki : — Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ