Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 23:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 23:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tata na bango Jakobi alobaki na bango : — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai !


Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ; tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.


Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te, motole mpe ewumelaka te mpo na libela.


Pamba na pamba, elobi Moteyi ; pamba na pamba, nyonso ezali kaka pamba.


Pamba na pamba, elobi mosakoli, makambo nyonso ezali kaka pamba.


Mpo na nini bozali kobebisa mbongo mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, mpe kobimisa motoki mpo na bilei oyo etondisaka te ? Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, mpe bokosepela na biloko ya elengi.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


« Kamata ye, batela ye, kosala ye mabe te ; kasi salela ye makambo nyonso oyo akosenga yo. »


Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango.


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko ; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ