Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 23:35 - Mokanda na Bomoi

35 Okoloba : « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te ; babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te ! Tango nini nakolamuka ? Nakozongela lisusu komela vino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 23:35
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.


Moko na moko alobaka : « Yaka ! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga ! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele ! »


Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.


Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.


Ezaleli na bango elongisi bosolo ya masese oyo : « Mbwa ezongelaka biloko oyo yango moko esanzi » mpe « Ngulu oyo basukoli ezongelaka kotambola kati na potopoto. »


Lokola babungisa bomoto na bango, bamipesaki na makambo ya soni mpo na kosala na lokoso makambo nyonso ya bosoto.


Nayoki kolelalela ya Efrayimi : ‹ Opesi ngai etumbu lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma, mpe etumbu yango ekweyelaki ngai. Zongisa ngai, mpe nakozonga, pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai.


Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, kolia misuni mpe komela masanga ya vino ! Bozalaki koloba : « Tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »


Yawe akolimbisa ye te ; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili.


Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene, mpe lokola moto oyo alali na songe ya nzete ya molayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ