Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 23:28 - Mokanda na Bomoi

28 Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi mpe akomisaka mibali bazoba koleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 23:28
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo.


Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.


Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.


Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe ;


atalaka-talaka na bisika nyonso, tango mosusu na libanda, tango mosusu na bisika oyo bato ebele bakutanaka.


Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.


Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.


« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.


mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.


Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi.


Tosengeli te kosala pite, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe, na mokolo moko, bato nkoto tuku mibale na misato bakufaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ