27 Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene, mpe mwasi ya mopaya azali lokola libulu ya mozindo.
Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo.
Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,
Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.
Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela kolinga mwasi ya ndumba ? Mpo na nini kosepela kosakana na mabele ya mwasi mosusu ?
mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango.