25 Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela ! Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo !
Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.
Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.
Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya, motema na ngai ekozala na esengo.
Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !
Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.
Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.