22 Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.
Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange ; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe.
Solo, Moyize alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »