Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.
Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.