Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 23:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 23:17
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.


Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.


Kolulaka te bato oyo basalaka mabe mpe kolukaka te kozala elongo na bango,


Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe, kolula te bato mabe ;


Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi, kosanganaka te na batomboki,


Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe, kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.


Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.


Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba ; yango wana tosa nde Nzambe.


Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te ; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu ; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi.


Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.


Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.


Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ