13 Kozangisa te kopesa mwana etumbu ; soki obeti ye fimbu, akokufa te.
Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko, mpe matoyi na yo eyokaka maloba ya boyebi !
Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ?