Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.
Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.