20 Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato, batoli ya bwanya mpe ya boyebi,
Yawe alobi : « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »
Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo.
Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.
Nakomelaki bango makambo ebele ya Mobeko na Ngai, kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.