16 Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.
ba-oyo balobaka : « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso ; nani akoluka kozala nkolo na biso ? »
Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.
Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.
Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.
Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.
Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »
Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.